Yobo 25

1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :

2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?

4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?

5 Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,

6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.