Banzembo 101
1 Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo ; nakoyembela nde Yo, Yawe.
2 Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
3 Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.
4 Mosika na ngai, motema ya kilikili ; naboyi kosala mabe.
5 Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.
6 Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai ; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.
7 Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ; liboso na ngai, mokosi akotelema te.
8 Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia ; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible