Banzembo 121

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ?

2 Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te !

5 Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

6 Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ;

8 Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.