Banzembo 134

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.

2 Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe !

3 Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.