Banzembo 137

1 Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.

2 Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango.

3 Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo ; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba : « Boyembela biso banzembo ya Siona ! »

4 Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya ?

5 Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !

6 Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !

7 Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »

8 Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso !

9 Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.