Banzembo 142

1 Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.

2 Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe ; na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.

3 Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.

4 Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.

5 Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !

6 Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »

7 Yoka koganga na ngai, pamba te nazali na pasi makasi ! Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai, pamba te baleki ngai na makasi.

8 Bimisa ngai na boloko mpo ete nasanzola Kombo na Yo ! Bato ya sembo bakoya kozingela ngai sima na Yo kosalela ngai bolamu.

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.