Banzembo 146

1 Bokumisa Yawe ! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !

2 Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.

3 Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.

4 Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.

5 Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !

6 Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko.

7 Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.

8 Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.

9 Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.

10 Yawe azali Mokonzi seko na seko ; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela ! Bokumisa Yawe !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.