Banzembo 20
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
2 Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi ; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.
3 Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.
4 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba.
5 Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso.
6 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
7 Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.
8 Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.
9 Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.
10 Yawe, bikisa mokonzi ! Yanola biso tango tozali kobelela.
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible