Banzembo 24
1 Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.
2 Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.
3 Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?
4 Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
5 Yawe akopambola ye ; mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.
6 Ndenge wana nde ezali, ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo, ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.
7 Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !
8 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Elombe ya nguya ; Yawe, Elombe ya bitumba.
9 Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !
10 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo !
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible