Banzembo 29
1 Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi.
2 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.
3 Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya ; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.
5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.
6 Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe, apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa.
7 Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto.
8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ; Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi.
9 Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka : « Nkembo ! »
10 Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela ; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.
11 Yawe apesaka bato na Ye makasi ; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible