Banzembo 47
1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
2 Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.
3 Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
4 Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.
5 Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.
6 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.
7 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.
8 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.
9 Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.
10 Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; atombwama makasi.
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible