Banzembo 54
1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
2 Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »
3 Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
4 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.
5 Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.
6 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.
7 Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe ! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
8 Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu.
9 Okangoli ngai na pasi nyonso ; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible