Banzembo 57

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.

2 Oh Nzambe, yokela ngai mawa ! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo ; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.

3 Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.

4 Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.

5 Nazali na kati-kati ya bankosi ; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.

6 Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !

7 Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.

8 Nzambe, lendisa motema na ngai ; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.

9 Lokumu na ngai, lamuka ! Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.

10 Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.

11 Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola ; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

12 Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.