Banzembo 62
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
2 Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.
3 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
4 Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?
5 Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
6 Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.
7 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
8 Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
9 Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
10 Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta ; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.
11 Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.
12 Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale : « Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;
13 mpe bolingo ezali ya Nkolo ; » mpe « ofutaka moto nyonso kolanda misala na ye. »
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible