Banzembo 67
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.
2 Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ;
3 mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
4 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
5 Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele.
6 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
7 Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
8 Tika ete Nzambe apambola biso ; tika ete mokili mobimba etosa Ye !
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible