Banzembo 70

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.

2 Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai ! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !

3 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni !

4 Tika ete bato oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !

5 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! »

6 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.