Banzembo 82

1 Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.

2 Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe ?

3 Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola ;

4 bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.

5 Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.

6 Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »

7 Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi.

8 Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.