Banzembo 87

1 Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule.

2 Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi.

3 Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !

4 Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela.

5 Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama : « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »

6 Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango : « Moto songolo abotama kati na Siona ! »

7 Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka : « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.