Banzembo 98

1 Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa ! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.

2 Yawe atalisaki elonga na Ye, amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.

3 Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.

4 Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !

5 Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !

6 Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.

7 Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !

8 Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo

9 liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo.

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.