Banzembo 113

1 Bokumisa Yawe ! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ; bokumisa Yawe !

2 Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela !

3 Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !

4 Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.

5 Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo ?

6 Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili.

7 Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela ; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola

8 mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye.

9 Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.