Banzembo 114

1 Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya,

2 Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.

3 Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima,

4 bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.

5 Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima ? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ?

6 Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme ? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba ?

7 Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi,

8 oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.