Banzembo 128

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye !

2 Oliaka mbuma ya mosala na Yo ; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.

3 Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.

4 Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye.

5 Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo

6 mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.