Banzembo 129
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba :
2 « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te ! »
3 Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.
4 Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe.
5 Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima !
6 Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango ;
7 tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye.
8 Tika ete baleki nzela baloba na bango te : « Tika ete Yawe apambola bino ! » Topamboli bino na Kombo na Yawe !
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible