Banzembo 130
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !
2 Nkolo, yoka ngai ! Yoka mabondeli na ngai !
3 Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?
4 Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.
5 Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya ; nazali kozela maloba na Ye.
6 Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.
7 Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.
8 Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible