Banzembo 149

1 Bokumisa Yawe ! Boyembela Yawe nzembo ya sika, bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene !

2 Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye ! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango !

3 Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ; tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda !

4 Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga.

5 Tika ete bayengebene na Yawe basepela kati na lokumu oyo ; tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango !

6 Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale kati na maboko na bango

7 mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo mpe kopesa bato etumbu ;

8 mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo, kokanga bato na bango ya lokumu na mabende

9 mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango ! Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso. Bokumisa Yawe !

Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.

Creative Commons Attribution-ShareAlike (CC BY-SA 4.0). Source: eBible.org.