Banzembo 150
1 Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi !
2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !
3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !
4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !
5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !
6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !
Open in the app to highlight, add notes, listen and ask Faith about this chapter.
Faith Heals Bible